Libala sakramento
Refrain. Moto akoki kokabola te, oyo Nzambe asangisi,
Moto akoki mpe kobongola te, mokano oyo ya Nzambe.
Libala Sakramento Esantu, bosangani mpo ya libela,
Libala elembo ya bolingo o, bolingo ya nsuka te.
1. Nzambe alalisi mobali mpongi,
Alongoli mokuwa o mopanzi mwa ye,
Akangisi mosuni o esika yango,
Mpe Nzambe akeli mwasi, ayei na ye epai ya mobali,
Mobali agangi mpe alobi: tala nsuni ya misuni mya ngai,
Mokuwa ya mikuwa mya ngai.
2. Botiki baboti ba bino o,
Bosangani bokomi moto moko o,
Bolingana na bolingo bwa Nzambe bokabwana te kin’o liwa.
3. Bobangani te, Nzambe akozala na bino,
Akotambwisa libala na bino, bozali na motuya o miso ma Ye.
Bokokatisa ebale bokozinda te,
Bokotambola na moto bokozika te o,
Mpo Ye mei Nzambe akeli bino, alingi bino, aponi bino.