Toyemba App

Nzambe abenisa libal’oyo

G.Mayenda

Refrain. Libala, libala lisantu, libala esengo e (2x)

1. Bolongani e o miso ma Nzambe, bosimbana makasi,

    Bokabwana te (2x)

1-5 Nzambe ayamba, Nzambe abenisa libal’oyo (2x)

2. Bolati pete o miso ma Nzambe, bosangana, bobota bana e (2x)

3. Mobali linga mwasi wa yo e, ata anuni e kotika ye te (2x)

4. Mwasi mpe linga mobali wa yo e, ata na mpasi kokima ye te (2x)

5. Bosololaka, boyokanaka, bobongisaka libala na bosembo (2x)