Maria molobeli
Refrain. Mama maria yo nde molobeli
Opesaki biso mwana wa yo Yezu
Abikisi biso oyo nde esengo
1. Yasolo oyo nde esengo, tokotondo yo e Mokonzi Nzambe
Na malamu manso mpe na Maria mama e napesa yo nini e?
2. Ya solo oyo nde esengo na botosi bwa yo e Ngondo Maria,
Tokotondo Nzambe mpe na yango e Mama e napesa yo nini e?
3. Ya solo oyo nde esengo mokolo mwa nsuka mama nde tomoni yo
Tokotondo Nzambe mpe na yango e mama e nde toyambani e