Magnificat
Refrain. Molimo mwa ngai mokumisa Mokonzi
Na motema mobimba!
1. Motema mwa ngai motondi na nsai,
Mpo ya Nzambe mobikisi wa ngai.
2. Atali botau bwa mosaleli wa Ye,
Uto lelo bato batanga ngai moto wa esengo.
3. Nzambe nta bokasi asali ngai mambi manene,
Nkombo ya Ye Mosantu Mosantu
4. Bileko na bileko alakisi ngolu
Na bato banso bakobanga Ye.
5. Alakisi bokasi bwa loboko la Ye,
Apanzi bato bazali na lolendo.
6. Alongoli bakonzi o ngwende ya bango,
Afandisi bato bake na bisika bya lokumu.
7. Atondisi na biloko bato bayoki nzala,
Azongisi bato bankita maboko mpamba.
8. Abikisi Israele mosaleli wa Ye, ayokeli ye lisusu ngolu,
Lokol’alobaka na bankoko : Abalama na bana ba ye
O bileko binso. Amen! Amen!