Mokangoli mazita

A.Atumenga

Refrain. Maria Mama wa Yezu u, Mokangoli mazita se yo e,

Yaka, kangola mazita malingi bomoi bwa ngai,

Ngondo wa bokasi yaka e.

Maria Mama wa Kristu u, Mofungoli mazita se yo e,

Yaka fungola mazita malingi nzoto na ngai,

Mwana wa Yoakim na Ana yaka.

1. Nzoto etungisami na bokono Mama e

    Mama sengele ngai na Yezu lobiko ya nzoto

    Nzoto ekoma molongani ya bokono Mama e

    Mama kangola lizita ya bokono na ngai e, kangola e.

2. Kolia, kolata na ngai kaka na mpasi,

    Mama mokangoli, kangola mazita ma ngai e

    Kotanga, kolala na ngai se mpasi na mpasi,

    Mama kangola mazita ya minyoko miye milati nzoto.

3. Mosala te, soki nazui, lifuta moke

    Mama sengele ngai na Mwana wa yo e,

    Boyambi esili, ekwei likolo ya bosomele

    Mama teleme fungola lizita ya bosomele (fungola e)

4. Na Cana osengelaki bato vino kitoko mpimbo,

    Mama nayebi ezalaki feti ya libala,

    Ebongo ya ngai libala ekowumela mpo nini mpenza?

    Mama kangola lizita ya kibonzemba na ngai e, (kangola ko).

5. Mokili eseki, etioli ngai mpo naino naboti te,

    Nkombo ya batisimo te, bapesa ngai nkombo kisita,

    Mama ntango ekoki nasimba mpe mwana na maboko,

    Mama kangola, fungola lizita ya ekomba, fungola yango e.