Molobeli molamu
Refrain. E Mama e Molobeli molamu
Mobondi wa mitema,
Yoka biso e, bana ba yo, yamba losako (2x)
1. Sambela mpo ya biso Mama e : sambelela biso
Tozali na mposa ya boboto : sambelela biso
Sambela mpo n’ekolo Mama e : sambelela biso
Mpo ya mabota Mama e : sambelela biso
Mpo ya misala Mama e : sambelela biso
E Mama e
2. Yamba losako Mosantu Maria : yamba losako
Ya basango mpe banyango o : yamba losako
Ya batata milimo o : yamba losako
Ya bamama milimo o : yamba losako
E Mama e e
3. Longonya Mama wa Mokonzi : Mama longonya
Ozui nkembo enene : Mama longonya
Yo Mama wa esengo : Mama longonya
Yo olongi etumba : Mama longonya
Yo oponami na Nzambe : Mama longonya