Ntombwa ya maria
Refrain. Tosepela toyemba ntombwa ya Mama e (2x)
Esengo na yo Maria otombwami o likolo,
Na ndakisa elamu omoni nkembo ya Nzambe (bis)
1. Lelo Eklezya tosepela mpe tolanda Mama e (2x)
Abotami petwa : ndakisa elamu
Akoli se petwa : ndakisa elamu
Ngondo wa bopeto : ndakisa elamu
Ngondo wa bolingo e : ndakisa elamu
Yo elikya, boyambi bwa bato Mama osambela mpo ya biso.
2. E lelo e na nse mobimba toyembi nkembo ya Mama,
Lelo e na nse mobimba toyembi nkembo ya Maria,
Ye atiki mokili moye na lokumu la ye nionso,
Wana nzela mpe ndakisa apesi na bakristu,
Tosepela toyemba ntombwa ya Mama e, ntombwa ya Maria.
3. Bilenge ya lel’oyo tolanda Mama e (2x)
Ye atosi maloba ma Nzambe : ndakisa elamu,
Ayambi na bomikitisi : ndakisa elamu
Ngondo wa bolingo e : ndakisa elamu
Mama wa motema ngolu : ndakisa elamu
Mama wa mabota : ndakisa elamu
Molongani wa Elimo Mama osambela mpo ya biso,
Bilenge oye! Mama e Mama e nsomo na monguna.
4. Elembo enene ebimi kuna o likolo,
Mwasi moko alati elamba ya mpembe e,
Tala o makolo ma ye sanza engengi be
Abimi lokola ntongo bonzenga bwa sanza,
Angengi lokola moi, bokasi bwa ye,
Lokola limpinga lya basoda bakei o etumba a Maria.