Toyemba App

Tambwisa ngai

Ingala

Refrain. Tambwisa ngai o nzela ya malamu,

Sengele ngai nguya ya molimo,

Nakolula esengo ya likolo, okamba ngai kin’o mboka yo

1. E Maria nakolinga yo solo

    Yoka nzembo nakoyembela yo, batela ngai, ngai mwana wa yo solo

    Otala ngai mikolo mpe minso

2. O etumba ekobunda ngai lelo

    Nakosenge Mama obatela, oyokela mawa ngai mwana wa yo,

    E Maria, nayamba yo Mama

3. O mokolo liwa likobete ngai,

    Zala wana penepene na ngai, nakoyina bobele se masumu,

    Nakoboya mabe ma ngai manso