Maria mokaboli wa ngrasya
Refrain. E Maria mokaboli wa ngrasya inso,
Yo Mama wa babola, o (2x)
Sengele biso babola, o (2x)
Bolamu bwa Mwana wa yo Yezu
1. Miso komolili tokomono te! Mama sunga biso o nzela ya bosantisami
Yo moboti wa Mwese wa bosembo
2. Matoyi mazipami tokoyoka te! Mama palela ba yo bana toyoka liloba
Yo Mama wa liloba lya libiki
3. Mitema malita tokunda bolingo. Mama fungola malita, tosekwisa bolingo.
Yo Mama liziba lya bolingo.
4. Mabota babel totosanaka te! Mama pesa botosi na boboto
Yo ndakisa ya botosi mpe boboto.
5. Ekolo ebebi bomilingi boleki. Mama sengele bandimi Elimo ya bomoko
Yo Mama mosangisi mpe wa bolingo