Toyemba App

Losako maria

R.Mutshipule

Refrain. Losako Maria na Nzambe ntembe te

Asali na yo mambi manene

Mama wa Yezu wa toli elamu

Toyei epai na yo, Mama Maria Mama.

1. Elenge Mwasi wa Israele, yo okokani na basi banso

    Kasi yo ozali polele na bozindo bwa yo

2. Ozali Eva wa botosi, mwasi wa yambo ayambaki

    Osalelaki Nzambe na motema mobimba

    Esengo na yo Mama Maria

3. Motema polele e, motema mpo na Nzambe

    Yo otondi n’Elimo Santu, Mwana wa yo azali Nzambe