Catena
Nani oyo akobima lokola ntongo, bonzenga lokola sanza
Akongenge lokola moi, bokasi lokola limpinga lya basoda bakei etumba
Motema mwa ngai, mokokumisa Mokonzi
Mpe molimo mwa ngai mosepeli Nzambe, Mobikisi wa ngai,
Zambi atali botawu bwa mosali wa Ye,
Yango wana ut’o lelo kin’o bileko na bileko,
Mboka inso ikotanga ngai moto wa esengo
Nzambe wa bokasi asali ngai mambi manene,
Nkombo ya Ye ezali Esantu.
Mpe mibu na mibu, ngolu ya Ye ekokitela bato bakobanga Ye
Alakisi bokasi na misala mya Ye, apanzi bato bazali na lolendo,
Akitisi bato banene, mpe atomboli bato bake
Baye bawei nzala abatondisi biloko
Ba mbongo abazongisi maboko mpamba,
Ayambi Israel mwana wa Ye, mpe ayokeli ye lisusu ngolu
Lokola alobelaka ba nkoko ba biso Abraham na bana ba ye banso.
Nkembo na Tata mpe na Mwana, mpe na Elimo Santu
Lokola ezalaka liboso mpe sikawa, mpe na bileko binso seko. Amen.
(Texte : Magnificat)