Toyemba App

Banso toyembela maria

T.Akundi

Refrain Banso toyembela Maria Mama wa Yezu,

Banso toyembela Maria Mama wa biso o

Andimaki iyo na mokano mwa Nzambe,

Yango azwi nkembo mpo na nkombo ya Mwana wa ye

1. Mwasi wa botosi ona liloba lya Nzambe    : Maria

    Elimo aluli loboko la ye                              : Maria

2. Mwasi wa Elimo akulami mbindo te          : Maria

    Mokonzi asali ye mambi manene              : Maria

3. Ngondo wa bokasi na limoni ya Yoane      : Maria

    Anyati monguna na nguya y’Elimo Santu  : Maria

4. Alongi etumba aboti Mobikisi                    : Maria

    Mobebisi akwei atuli na nsoni                    : Maria

5. Nkembo o likolo esengo na Mama            : Maria

    Awa o nse topesi ye longonya                   : Maria