Toyemba App

Maria losako

G.Mayenda

Refrain. Maria losako, otondi ngrasya

Mokonzi azali na yo

Mama sambela mpo ya biso (2x)

1. Mpo ya botosi bwa yo

    Ondimi kokumba zemi

    Mpo obota Yezu Kristu

    Mpo abikisa mokili

    Sambela mpo ya biso basumuki

    Totosaka Nzambe.

2. Mpo ya bolingi bwa yo

    Okei kotala Elizabeti

    Awa ayambi losako la yo

    Mwana aningani o libumu

    Atondi n’Elimo Santu

    Sambela mpo ya biso basumuki

    Topesa baninga boboto.

3. Mpo ya bosawa bwa yo

    Ozalaki moto wa losambo

    Osengelaki bato vino na libala ya Cana e

    Sambela mpo ya biso basumuki

    Topesa baninga esengo.

4. Mpo ya boyambi bwa yo

    Na liwa lya Yezu o Kuruse

    Ozalaki wana e

    Ondimaki mpasi elongo na Ye

    Sambela mpo ya biso basumuki

    Totingama na Kristu.