Sambela mpo ya ngai

D.Mishibabo

Refrain. Sambela mpo ya ngai Mama Maria,

Nasambela elongo na yo Mama,

Tobondela hum Mwana wa yo wa bolingo (Maria) (bis)

1. Osengele biso na Mwana wa yo,

    Lokola osengaki kuna o mboka Cana,

    Kimya boboto o mboka Congo.

2. Zala na biso molongani wa Elimo

    Se lokola mokolo mwa Pantekoste,

    Totonda banso na nguya ya Elimo,

    Bwanya bwa Nzambe, bokasi bwa biso.

3. Otikala na biso elongo Mama wa Yezu,

    Lokola otikalaki na Yoane na nse ya Kuruse e,

    Toyeba komibonza mpo ya baninga a,

    Tobondo bango mpe tosalisana e.

4. Tobunda etumba elongo na yo : Mama e,

    Lokola onyati nioka o moto mwa ye : Mama e,

    Tobunda etumba eye ya molimo o :

    Ngondo wa bokasi e Mama,

    Nsomo na monguna e Mama e,

    Mama a Maria, Mama a wa bana, Mama a wa Nzambe e.

5. Yo nde Mama wa Afrika, yo nde Mama wa Congo,

    Mama wa bakristu banso o

    Ngondo wa bokasi e Mama,

    Nsomo na monguna e Mama e,

    Mama a Maria, Mama a wa bana, Mama a wa Nzambe e.