Toyemba App

Na yo bokonzi

D.Luse

Refrain. Na Yo bokonzi, nguya na nkembo o bileko seko,

Kristu yo Mokonzi,

Bokonzi bwa Yo bwa nse te, zala Mokonzi o mitema mya biso

1. Bato ba bikolo binso, awa o nse,

    Bakolela mpe bakobanga Yo, ozali Mokonzi

2. Na makila ma Yo olongoli biso o boombo bwa masumu,

    Okomisi biso ekolo ya bakonzi,

    Kristu ozali Mokonzi

3. O mabota mabiso       : ozali Mokonzi

    O Eklezya ya biso        : ozali Mokonzi

    O misala mya biso       : ozali Mokonzi

    O ekolo ya biso            : ozali Mokonzi