Toyemba App

Lokumu na basantu

Kossi

Refrain. Lokumu na bino basantu, lokumu!

Bokomi o mboka Nzambe, esengo enene

1. Mpo ya bino etumba esili, mpo ya bino esengo ebandi

2. Bosalaki bolingi bwa Nzambe, o likolo lelo esengo na bino

3. Bandimaki se Yo Mokonzi, basalaki kaka mpo elingaki Yo

4. Bomoi bwa bino awa o ns’eye, bozala ndakisa mpo ya biso banso

5. Mpo ya bino ezali ndakisa, mpo ya bino ezala mwinda mwa biso

6. Tokosenga na bino basantu, bolembe te kosambela mpo ya biso