Yembela basantu banso

A. de haes

Refrain. Yembela (2x) basantu banso e, sepela na nsai (bis)

1. Anzelu ayei na mondule kobelela o bipai binso,

    Akosangela; tika naino kobebisa nzete, mbu na nse.

2. Tokosangisa moko moko basaleli ba Tata Nzambe

    Bakozwa bomoi zambi nyoka mokoseli bamokweisi.

3. Tokokomela bango nkoma, toyebisa ‘te basikwami;

    Na bosukoli o makila ma Mwa Mpata bamipetoli.

4. Talaka boye nkaka mpenza enene be bakoya wana;

    Bakosangana na basantu ba Israel, ya kotanga te

5. Bakokumisa Mwa Mpata Mobikisi, bakozinga te

    Bakoningisa mandalala epai ya Ye mot’alongi nse

6. Bakolobana: amen, amen, toyembela nta bokasi e,

    Oyo Nzambe mei oy’avandi o tempelo na nguya seko.