Toyemba App

Motema mosantu mwa yezu kristu

B.Massabu

Refrain. Motema Mosantu e

Motema Mosantu mwa Yezu Kristu

Elembo ya Bolingo bwa Nzambe

Bolingo alingaki biso bato ba Ye

1. Awa tokokambema o bozindo

    Mwa mobombamo mwa Bolingo

    Epai moto akokutana na Nzambe

    Totala mpenza motema ya Mobikisi

    Wa mokili mpe tomitika mobimba

2. Komipesa na Motema ezali kotinda

    Biso totia mayele mpe makanisi ma biso manso

    Na Motema ya bolingo, ya mawa mpe ya bosawa

3. Motema moye molingaki mokili

    Mokolakisa boni Nzamb’apusi kolinga bamokili

    Mpe mokosembola biso ‘te Ye azali Tata

    Awa tokoluka koyamba Ye Nzambe

    Lokola Tata atonda bolingo