Toyemba App

Napesi mpe nalakeli na motema mosantu

B.Massabu

Refrain. Napesi mpe nalakeli na Motema Mosantu

Mwa Mokonzi wa biso Yezu Kristu

Bomoto mpe bomoi bwa ngai,

Misala mpasi mpe minyoko mya ngai

Na ntina ‘te binama binso bia nzoto ya ngai

Bizala mpo ya kolinga, komemya

Mpe kokembela Ye Mokonzi wa ngai e

1. Mokano mwa ngai mozali bomipesi mobimba na Ye

    Kosala manso mpo ya Bolingo bwa Ye

    Na boboyi o motema mwa ngai mobimba

    Maye manso makosepelisa Ye te

2. Nakozwa yo Motema Mosantu

    Lokola ntina se moko ya Bolingo bwa ngai

    Elikya ya libiki lya ngai, mosemboli ma ngai makanisi

    Mobongisi mbeba ya bomoi bwa ngai

    Mpe esika ya bopemi bwa ngai o ntango ya liwa

3. Motema Mosantu mokosembola ngai epai ya Nzambe Tata

    Mpe mokobatela ngai na nkanda ya ye

    Yango wana nakopesa Yo makanisi ma ngai manso

    Awa nakobanga botau bwa ngai

    Mpe nakolikya na bolamu bwa Yo

4. Zikisa o kati ya ngai manso maye makosepelisa Yo te

    Mpe moto makasi na ntina ‘te bopeto bwa Bolingo bwa Yo

    Bokomama o motema mwa ngai mpo nabosana Yo te

    Mpe nakabwana na Yo mokolo moko te

5. Nalaki Yo o nkombo ya bolamu bwa yo

    ‘Te nkombo ya ngai ikomama na Yo

     Mpamba te nalingi kotikala ata na bomoi to na liwa

     Lokola se mosali wa Yo