Lelo mokolo mwa mokonzi
Refrain. Lelo mokolo mwa Mokonzi tosalako nini e ?
Tokende kokumisa Nzambe (2x)
Aleluya esengo mingi tokende kokumisa Nzambe (2x)
1. Nzambe abateli biso mposo mobimba : Tokende kokumisa Ye
pesi biso bomoi tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
2. Nzambe abateli biso na makama: Tokende kokumisa Ye
Alobikisi na liwa, tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
3. Nzambe akabeli biso mpe makabo: Tokende kokumisa Ye
Apesi biso misala tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
4. Nzambe akabeli biso mpe mayele: Tokende kokumisa Ye
Apesi biso bwanya tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
5. Nzambe akabeli biso mpe boboto: Tokende kokumisa Ye
Apesi biso elikya tosalako nini e? Tokende kokumisa Ye
6. Nzambe akabeli biso mpe bolingo: Tokende kokumisa Ye
Apesi biso bandeko tosala ko nini e? Tokende kokumisa Ye