Lokumu na bango basato
Refrain. Lokumu na bango basato
Tata, Mwana n’Elimo Santu
Nzambe se moko
1. Nzambe Tata Mozalisi wa biso e
Akeli biloko binso, apesi biso bomoi
2. Nzambe Mwana Mokonzi wa biso e
Ayei awa o nse kobikisa biso e
3. Elimo Santu Mosantisi wa biso e
Mokambi wa Eklezya asangisi biso e
Coda: Bango basato, Bango basato
Tata azalisi biso e, Mwana abikisi biso e Elimo asantisi biso e