Bango basato nzambe se moko
Refrain. Nzambe Tata, Yezu Kristu,
Elimo Santu, Nzambe se moko
Lokumu lozala na Nzambe se moko (2x)
Bino basato Nzambe se moko (2x)
1. Tokumisa Tata, Mokeli wa biloko binso
Tokumisa Ye elongo na Mwana mpe n’Elimo
2. Tokumisa Mwana, Mobikisi wa biso banso
Tokumisa Ye elongo na Tata mpe n’Elimo
3. Tokumis’ Elimo, Mosantisi wa biso banso
Tokumisa Ye elongo na Tata mpe na Mwana