Toyemba App

Mokolo mwa nkitela

T.Akundi

Intro: Mokolo mwa nkitela

Bayekoli basangani esika yoko

Bayoki lokito lonene ut’o likolo

Mpe mopepe makasi motondi kati ya ndako

Refrain. Elimo akiti, asopi makabo

Moto mwa Ye, mokiteli moko na moko

Batondi na nguya, bakomi koloba nkota ndenge na ndenge (2x)

1. Bayuda bakamwi mingi mpe balobi:

    Oyo nde banani? Bagalilea te?

    Ndenge nini moto nionso akoyoka bango

    Nalokota la ye la mboka, kokamwa e!

2. Basusu batioli mingi mpe balobi:

    Oyo molangwa te ? Nzoka nde molangwa te

    Batondisami na Elimo ya Nzambe

3. Lelo esengo enene, mokolo mwa Nkitela

    Elaka ya Kristu ekoki e tosepela

    Totondisami n’Elimo, tosala mosala o elanga ya Nzambe

Coda: Yaka lelo e Elimo ya Nzambe

Solo: Yo moto mwa bolingo e, bolingo bwa Nzambe Tata e

          Tondisa biso lelo na makabo ma Yo,

          Tosalaka mosala lelo o kati ya Eklezya

          Totonga ekolo ya biso, kati na Kristu

          Ye libanga linene likopesa bomoi e