Yezu abuti o likolo

D.Mishibabo

Refrain. Mokonzi Yezu abuti o likolo, afandi kuna pene na Tata e

Mokonzi Yezu abuti o likolo, azui nkembo mpo ya Nzambe Mei. (2x)

1-3. Bana ba Galilea bokolukaluka, bokotala o likolo mpo nini ?

1. Mokonzi abuti lelo na nsima nde azongeli biso.

2. Mokonzi abuti lelo atikeli biso mosala.

3. Mokonzi akei lelo kobongisela biso esika.