Mpo nini
1. O ntongo o lilita, libanga lilongwi o lilita
Nzoto ya Mokonzi ekei wapi e, yoka banzelu balobi boye
Refrain. Mpo nini bozali koluka o kati ya bawa moto oyo atiki lilita,
Azali na bomoi, kende kosakola Mokonzi asekwi e (2x)
2. Bilamba bazipaki Yezu etikali o lilita
Nzoto ya Mokonzi ekei wapi e yoka banzelu balobi boye
3. Bakotaki o lilita oyo likambo, likambo nsomo boye
Nzoto ya Mokonzi ekei wapi e yoka banzelu balobi boye
Refrain 2 Aleluya libanga lilongwi o lilita
Aleluya Mokonzi asekwi solo, Aleluya basi bakei o lilita
Aleluya Mokonzi alongi liwa e (2x)