Toyemba App

Aleluya, mokonzi’ asekwi

D.Kaimba kogodo

Refrain. Aleluya (3x) Mokonzi’ asekwi.

1. Tokoyemba tokokumisa : Mokonzi asekwi

    Oyo awaki alongi liwa e : Mokonzi asekwi

    Ye nde Mwana se moko wa Tata : Aleluya, amen, Mokonzi asekwi.

2. Banso tobina tosepela : Mokonzi asekwi

    Ye Mokonzi mpe Mobikisi : Mokonzi asekwi

    Ye nde Kristu Mwana Maria : Aleluya, amen, Mokonzi asekwi.

3. Mwinda mongengi o mokili : Mokonzi asekwi

    Bowumbu bosili bandeko : Mokonzi asekwi

    Ye nde Mwa Mpata ya Nzambe e : Aleluya, amen, Mokonzi asekwi.