Kristu asekwi

J.Ngalula

Refrain. Kristu asekwi, alongi liwa, toyemba banso aleluya (2x).

1. Asekwi na nkembo enene se ndenge alobaki na nsima ya mikolo misato.

    Bamanyoli tempelo eye alobaki akotonga nde nzoto ya Ye.

2. Na malasi Maria Madeleni akomi o lilita, alokuti polele.

    Mpo nini bozali koluka moto azali na bomoi o kati ya bawa.

3. Yoane na Petro bakomi o lilita, bayambi ‘te asekwi.

    Bokende o mikili minso bopanza nsago, boloba ‘te Mokonzi Yezu asekwi.

4. Toma simba mopanzi mwa ngai,

    Tala maboko ma ngai elembo ya nsete yang’oyo.

    Tika ntembe, yamba se boyambi esengo na oyo akondima ata amoni te.

Finale : Aleluya, aleluya, aleluya Kristu asekwi (Bis).