Toyemba App

Mbonda ya pasika

Mgr moke

1. Bosepela mampinga ma banzelu: esenngo

    Nse yoka nsai eklezya mpe sepela: esenngo

    okati ya tempelo eye butisani mpe nzembo: Kristu asekwi tosekwa biso naye

2. Mokonzi wa biso elombe ya banzelu:

    Atondisi nse mobimba na nkembo ya Ye:

    Mama Eklezya atondi na lokumu: Kristu asekwi tosekwa biso na ye

3. Tala pasika ya sika ya solo mpenza

    Oyo bakoboma mpata mpata mpenza

    Makila ma Ye masantisa bakristu: Kristu asekwi tosekwa biso na ye

4. Butu bonene obikisaki bana ba Israel:

    Babimi o ezipe! bakatisi mbu etane:

    opetoli bango mitema na limpata:

5. Butu bonene Kristu akataka minyololo mya liwa:

    Abuti bo elombe, auti o nse ya mabele:

    Amemi nse mobimba na ye Ye molongi wa etumba:

6. Butu bonene obotoloko ba Ezipeti biloko opesi ba Ebrei:

    Osangisi likolo na nse biloko bya bato na bya Nzambe mei:

    Butu bokobengama boyinani bokopesa boyokani:

7. Na butu boye bosantu kamata e Tata mosantu mwinda mwa biso:

    Na yango babenisi bana ba ekolo ya Yo basangani bako bonzela Yo:

    lokola nde mwa libonza lya mpokwa:

8. Tokosenga yo Mokonzi oyangela obatela mpe:

    Ba nganga nzambe banso na bakristu banso ba nse:

    Elongo na Papa mpe wa biso episkopo:

9. Bwakela mpe miso na Yo, na bakonzi bako yangela biso:

    Kamba makanisi na mpe misala mya bango:

    Lisanga moko bazala banso o likolo:

10. Nsai ya Pasika e! kala o mitema seko:

     Tobwaka bisengo bya nse, tokangisa mitema se o likolo:

     Tosangana na mokonzi Yezu mwinda mokopela seko: