Ntongo makasi
Intro : Ntongo makasi boye tokei na malasi ya ntalo
Kobongisa nzoto ya Mokonzi wa biso.
Oyo babomi Ye o Kuruse elongo na miyibi
Mpe asali na Ye eloko te.
1. Boni bokoluka moto ya bomoi o kati ya bawa?
Alobaki akokufa, akosekwa nsima ya mikolo misato.
Ya solo asekwi!
Atikeli bino maloba bolanda Ye o mboka Galilea
Refrain. Aleluya (4x)
2. Toyemba, tobina mbonda ’esengo;
Toyemba Kristu Pasika ya biso e!
Tobina Kristu Pasika ya biso; lelo oyo azali na bomoi
3. Nakokend’o mboka Galilea;
Namona ata na miso Mokonzi wa ngai
Ye Libiki mpe Elikya na ngai