Mpo nini bokotia ntembe
Refrain. Mpo nini bokotia ntembe (2x) Mokonzi asekwi
Azali na bomoi, yango ntina ya boyambi bwa biso.
1. Alobaki bobuka tempelo mpe akotonga yango nsima mikolo misato
Babuki yango mpe atongi yango nsima mikolo misato: asekwi
2. Maria Madeleni akutani na Mokonzi,
Mokonzi alobi kende yebisa Bayekoli ba ngai
Tokutana na galilea (3x) : asekwi
3. Abimeli bapostolo o ndako bizibeli bikangemi, bakobanga
Atombeli bango boboto kobanga esili : asekwi
4. Abimeli bayekoli babale o nzela ya emmaus, elikya esili bango,
Mokonzi na bango awei, ateyi bango makomi masantu;
Abuki limpa, bayei koyeba Ye : asekwi
5. Abimeli Simoni Petro na basusu o ebale
Balobi butu mobimba bazwi eloko te
Alobi na bango bwaka monyama o ngambo ya mobali
Bakangi mbisi’ebele : asekwi
6. Simon olingaka ngai? : iyo Mokonzi oyebi yango, Kengele mpata ya ngai (3x)
Salani mosala natikeli bino: asekwi
Coda:
Oh botika ntembe : asekwi
Mokonzi azali na bomoi : asekwi
Alongi liwa Tika tika ntembe : asekwi
Yamba se boyambi : asekwi