Lilita litikali mpamba
1. Na nta ntongo basi bakei o lilita,
Bamemi malasi maye balengeli e,
Bakuti libanga lisili lilongwi e o monoko mwa lilita,
Mpo nini bozali koluka o ntei ya bawa moto oyo azali na bomoi ?
Azali te kasi asili asekwi, asekwi !!!
Refrain. Lilita mpamba aleluya,
Asekwi na nkembo e tobiki na Ye elongo
Aleluya alongi liwa, aleluya azali na bomoi (2x)
2. Na nzela ya Emmaüs batamboli elongo na Ye,
Kasi banso bayebi Ye te,
Ntango afandi elongo na bango o meza,
Akamati limpa apesi bango, miso ma bango mazibwami
Ya solo asekwi, asekwi !
3. Mpo nini bozali koyoka nsomo boye,
Mpo nini bozali kobete ntembe, talani maboko ma Ngai
Mpe makolo ma Ngai e ezali Ngai mpenza,
Elimo ezali na nsuni te, Elimo ezali na nkuwa te
4. Ya solo amikabi e mpo ya biso,
Toyemba tobina asekwi na nkembo (2x)