Toyemba App

Aleluya, mokonzi asekwi

C.Ngalamulume

1. Maria Madeleni na malasi o maboko; ntongo ntongo mpenza akei o lilita

    Akuti libanga lisili lilongwi, akamwi na nsomo Mokonzi akei wapi ?

Refrain. Aleluya, aleluya e gangani na nsai

Mokonzi asekwi e aleluya, aleluya e

Gangani na nsai Kristu alongi liwa

2. Mwasi mpo na nini okoluk’okati ya bawa; Moto oyo azali na bomoi ?

3. Toma, Toma tika ntembe Elombe asekwi e; Tika ntembe Kristu alongi liwa