Mokonzi alongi liwa
Intro: Boyebisa bato banso Nsango Elamu ya nsai
Libanga lilongwi o lilita, liwa lituli e.
Mokonzialongi liwa e (2x)
Refrain. Aleluy’aleluya aleluya Yezu asekwi e
Aleluy’aleluya aleluya Elombe abimi o lilita e,
Mokonzi alongi liwa e (2x)
1. Banso tosepela na nsai,
Tozwi lelo libiki, tala boombo bosili e
2. Kristu asekwi na nkembo na bokasi bwa Nzambe Tata
Basinzili banso bakwei e
3. Basi bakomi o lilita bakuti lisili lifunguami e
Bakamwi na nsomo bamituni e,
Mokonzi akei wapi (2x)
Moto moko atuni bango: Mpo nini bokoluka Ye ?
Asekwi (3x) Mokonzi alongi liwa e
Finale: Nkembo ya Nzambe emononi lelo
Toyembela Ye ba nzembo ya nsai,
Tobinela Ye mabina ya nkembo
O o maboko makasi tobeta,
Tobeta milolo: Mokonzi alongi liwa e