Toyemba App

Nse sepela e likolo yemba na nsai

J.Abbé makamba

Intro: Toyemba (2x) aleluya

Toyemba toyemba nsango ya nsekwa ya Yezu

Refrain. Nse sepela e likolo yemba na nsai (2x)

O! Nsai nsai e Mokonzi asekwi

O! Nsai nsai e Mokonzi alongi liwa

1. Maria, Maria - Madelena, ye wana akei kuna o lilita,

    Abandi kolukaluka luka Mokonzi wa ye: akeyi wapi e?

    Akei wapi e e wapi e

2. Maria atelemi atali nsima, amoni moto azali kotuna ye:

    Mama ozali koluka nani ko?

    Mama ozali koluka nini awa? Maria:

    Rabuni e, Rabuni moteyi na ngai

Refrain 2. Aleluya (4x) Mokonzi na ngai asekwi

Aleluya (4x) Mokonzi na ngai alongi liwa.

A! ntembe esili e (4x)

Solo: Yo nani wana Toma e pusana pene na Ngai,

         Yaka yaka e tiya mosapi o mopanzi mwa Ngai e, hum yo yamba:

         Tika (3x) ntembe tika ntembe (2x) A ntembe esili e (4x)