Ntongo ntongo boye
1. Ntongo ntongo boye basi bakei wapi e?
Maria Madeleni na malasi okei wapi e?
Tala libanga lilongwe o lilita, nsango nini?
1-3. Mokonzi asekwi Yezu alongi liwa
Refrain. Aleluya (3x) Yezu asekwi,
Aleluya (3x) Yezu alongi liwa
2. Boya, boya kotala lilita polele,
Kende yebisa nsango na bayekoli ba Ngai,
Kun’o Galilea bakomono Ngai e nsango nini?
3. Beta beta lisolo o nzela y’Emmaus,
Wana nde nani azangi koyeba makambo?
Tika nalimbola mayele ma bango mafungwama
Abuki limpa, baye koyeba Ye.