Batata na lilita
Intro : Batata na lilita bapakati bapoti mbango
Tala Yoane aleki liboso, Petro ayei kokota
Akuti se ndenge bamama balobaki ee
Mokonzi asekwi ee (2x)
Refrain. Aleluya (4x) ngo esengo e
Aleluya (2x) ngo esengo e
1. Uhm bazongi kun’o Galilea bakumisi Mokonzi,
Bamoni Ye na nkembo, bayembi banso,
Mokonzi asekwi ee (2x)
2. Bawuti na Emmaus, bazali kozonga,
Bakuti baninga basangani, bazali kokamua bakaboli lisolo,
Tomonaki Mokonzi abukaki limpa, miso mafungwami ee
Mokonzi asekwi ee (2x)
3. Toma, Toma, tiya mosapi awa, tala maboko ma Ngai,
Tala simba mopanzi mwa Ngai, tika kobete ntembe,
Yamba, yamba, yamba se boyambi.
Esengo na bato bakondim’ata bamoni te Toma :
Mokonzi wa ngai na Nzambe wa ngai e.
4. Nakotinda bino e, bokende bipai binso e,
Bokomisa bango bayekoli ba Ngai e,
Bato bakondima bakobika,
Bakokende o bokonzi bwa likolo,
Bino bolingana bino na bino (2x)
Coda: Tokoyemba n’esengo e : Mokonzi asekwi e (2x)
Tokobina n’esengo e : Mokonzi asekwi e (2x)
Tokoyemba aleluya : Mokonzi asekwi e (2x)