Toyemba App

Topanza nsango

V.Mamiyamba

Refrain. Topanza nsango lele topanza nsango ima

Olele topanza nsango,

Lelo pasika e, topanza nsango Mokonzi asekwi e. (o! lele)

1. Ntongo ntongo basi bakei o lilita, bakuti lyango lisili lifunguami,

    Bazongi mbango o mboka balobi boye:

    Towuti kuna Mokonzi azali te

    Petelo o na Yoane bakimi mbango bakei kotala e

    Basosoli mpe balobi boye ya solo Mokonzi asekwi e (o! lele)

2. Alakisi biso bokasi bwa Ye, Ye Nzambe atonda nguya,

    Libanga ko ntina wapi? Basinzili ko bakwei e (o! lele)

3. Lelo tozwi bondeko bwa Nzambe abikisi biso o liwa

    Totondo Ye botondi na nsai e o! lele topanza nsango

Finale:

     Elombe asekwi e: asekwi asekwi

     Tokende mbango o Galilea: asekwi asekwi

     Kuna tokomona Ye: asekwi asekwi

     Azali na bomoi e : asekwi asekwi

     Ya solo Yezu asekwi (ya solo) (2x)

     Aleluya Yezu asekwi (2x)

     Nganga Mokonzi asekwi (2x)

     Mesiya asekwi (2x)