Toyemba App

Azali na bomoi

G.Mayenda

1. Libanga lilongwe, Mokonzi akei wapi ?

    Lilita polele, Mokonzi akei wapi ? (2x)

    E! Basi e, mpo nini bokoluka o kati ya bawa a ,

    Moto azali na bomoi ?

Refrain. Azali na bomoi (4x)

Yezu asekwi na nkembo alongi liwa (2x)

2. Mokonzi asekwi i mawa masili (2x)

    Tosepela, tobina, tobiki o liwa e.

3. Mokonzi asekwi i boombo bosili (2x)

    Tosepela, tobina, apesi biso boboto.

4. (Alto) Toma tika a tika ntembe (2x)

    Tala maboko ma Ngai simba mopanzi mwa Ngai

    (Tutti) Toma, Toma tika ntembe (2x)

    Tala, simba mopanzi mwa Ngai (2x)

    Esengo na bato, bayambi ata bamoni te.

    Mokonzi wa ngai mpe Nzambe wa ngai (2x)