Pasika ya biso

G.Mayenda

Refrain. Aleluya, aleluya , aleluya, Yezu asekwi e aleluya,

Aleluya, pasika ya biso e (2x)

1. Maria Madeleni okokamwa nini?

    Moto azali na bomoi (2x)

2. Asekwi na nkembo oka! ya bawa e,

    Liwa lituli e (2x)

3. Toma a Toma tala maboko ma ngai, Toma tika ntembe,

    Toma simba mopanzi mwa ngai, Toma tika ntembe,

    Yamba se boyambi.

    Esengo na baye bayambi ata bamoni na miso te (2x)

    Toma: Mokonzi wa ngai mpe Nzambe wa ngai ee (bis)

4. Nakotinda bino bokende bipai binso,

    Bokomisa bato banso bayekoli ba Ngai,

    Baye banso bakondima a bakobika (2x)