Toyemba App

Intention vendredi saint

Tiré de mposo esantu

1. Mpo ya Eklezya lisanga lya bayambi ba Nzambe

    Ezwa nguya inso ya Kuruse Esantu

    Mpo ‘te eyela bato banso libiki, tosambela

Refrain. E Mokonzi yokela biso mawa (2x)

2. Mpo ya Papa………….Episkopo wa biso……….

    Na baepiskopo banso Kuruse ya Kristu elendisa bango

    Epesa bango nguya na bwanya bwa Nzambe, tosambela

3. Mpo ya banganga Nzambe na basaleli banso ba Eklezya

    Balanda ndakisa ya Kristu mikolo minso

    Mpe bamipesa mpo ya kosalisa baninga, tosambela

4. Mpo ya bayambi banso banse mobimba

    Babiki mpo ya makila ma Kristu masopani o kuruse

    Elimo Santu atondisa bango na bolingi, tosambela

5. Mpo ya bandeko Nzambe aponi mpo ya koyangela bato

    Kristu alendisa bango mpe apesa bango mayele

    Na ntina te bosembo bazala bipai binso, tosambela

6. Mpo ya bandeko balingi kokota o Eklezya ya Nzambe

    Na mpe baye bazali na mposa ya kolanda Kristu

    Makambo ma nse mabebisa boyambi bwa bango te, tosambela

7. Mpo ya bato batiyi Elikya ya libiki epai ya Kristu

    Bazala se motema moko o kati ya Eklezya

    Bana ba libota se lyoko bayokana, tosambela

8. Mpo ya bayuda bazwami o mokili mobimba

    Bandima Kristu lokola Mesiya

    Oyo Nzambe atindi mpo ya libiki lya bato, tosambela

9. Mpo ya bandeko baye bazali na ntembe

    Elimo Santu asilisa ntembe ya bango

    Mpe akotisa bango o Eklezya Esantu, tosambela

10. Mpo ya banso bayoki nkombo ya Kristu naino te

    Tata wa likolo ayokela bango mawa

    Bayoka mateya ma nsango ndamu, tosambela

11. Mpo ya banso bazali konyokwama mpo ya bosembo

    Na baye bazali na mpasi bipai binso

    Elimo Santu asalisa bango balembe te, tosambela