Toyemba App

Na golgotha

P.Balenza

     Nzambe wa ngai nakoyembela Yo

     Nzambe wa ngai nakokumisa Yo

Refrain. O Kuruse osopi makila mpo na ngai

Na Gologotha olati enkoti ya nzube mpo na ngai

1. Yo Mwana Nzambe omikabi mpo ya libiki lya ngai

    Yo mpenza Nzambe omibonzi mpo ya elonga na ngai

2. Nzube na moto makila masopani

    Nsete na maboko, na makolo makila matangi

    Mopanga na mopanzi, mai na makila mabimi

    Mpo ngai nabika (2x) aaa

3. Liwa lya nsoni, liwa lya nsomo

    Elongo na bamiyibi ondimi kosambwa mpo na ngai

    Mpo ngai nabika (3x) aaa

4. Natondi yo mingi Kristu na ngai

    Na motema mobimba nakumisi Yo o

Coda: Natondi Yo o o