Tokundola mpasi ya yezu
Refrain. Tokundola mpasi ya Yezu, Tokanisa Yezu o kuruse
Soli+tutti :
1. Bakitisi Yezu o liwa e, oyo liwa e ya nsomo, nsomo (2x)
1-15: Tomilela, tomilela, tobongola mitema, toboya masumu (2x)
2. Bamemisi Yezu, mema kuruse, se lokola asali likambo (2x)
3. Akwei na bozito, kilo kuruse, se lokola amemaki ngambo (2x)
4. Akutani ngo na mama wa Ye
Motema mwa mama ngo mozoki na nsomo
5. Basalisi Yezu na Simoni oyo ndakisa na nzela ya kuruse
6. Mama moko e Veronika ayei kopangusa elongi ya Yezu
7. Akwei na bozito, kilo kuruse, se lokola amemaki ngambo (2x)
8. E basi e botika kolela, lelani masumu ma bino moko e
9. Akwei na bozito, kilo kuruse, se lokola amemaki ngambo (2x)
10. Balongoli Yezu bilamba e, babeti zeke e mpo ya bilamba bya Ye
11. Babaki Yezu (2x) mpo ya masumu ma biso bato
12. E Yezu akufi e, akufi e o kuruse (2x)
13. Tomilela, tomilela, tobongola mitema toboya masumu (2x)