Bakembisa tango inso
Refrain. Bakembisa ntango inso Yezu o sacramento,
Bamokembisa banso be, ba likolo na ba nse.
1. Yezu azali o mboka biso, akolongwa soki te,
Ye azali o sacramento, butu butu mpe moi moi
2. Yezu azali o sacramento, Nzambe solo, Moto mpe,
Ye azali na molimo mpe na nzoto yambani.
3. Mampa vino bikosila, bina bikobongwana,
Tokomona se bilembo Yezu mpenza abombami.
4. Yakani o ndako Nzambe, talani Mobikisi,
Bomotondo, bomolinga, bato na mpe banzelu.
Texte lingala : Card Joseph Albert MALULA