Yezu na ostiya
Refrain. Yezu Ukaristia, obombami o sacramento.
Tokumisa mpe tokembela Yo, Yezu na ostia.
1. Nkembo, lokumu na Yo Yezu na Ostia.
2. Tokumisa Yo mpo ya mampa ma bomoi maye okoleisa biso.
3. Tokumisa Kristu na esengo na nsai o motema.
4. Bakristu tokumisa Mobikisi, Ye wana o sacramento.
5. Tokundola lelo mokolo mosantu, Yezu akeli ukaristia.
6. Ata tokomona bilembo mpamba, Yezu Ye mei azali wana.
7. Bobele bayambi bakoki kondima mobombamo mwa ukaristia.