Toyemba App

Ningisa mandalala

J.Mpande

Refrain. Mandalala (2x) boningisa e,

Ozana na Mwana wa Davidi,

Yezu akoti na nkembo e

1. Bakomi o Yeruzaleme atindi bayekoli e,

    Bayei na mwana mpunda e, abuti yango mpe atambolie e

1-3. Nkembo (2x) e

2. O nzela e batandi bilamba e,

    Na oyo ayei na nkembo e,

    O nkombo ya Nzambe Mosantu

3. Mboka mobimba eningani e,

    Batuni nani wana e: «Profeta awuti o Nazarete»

4. Gangani mpe belela e:

    Ozana (3x)

    Ozana na Mwana wa Davidi,

    Ozana (3x)

5. Beta milolo betani e, ozana (3x)

    Pepa (2x) mandalala, ozana (3x)

6. Bitapi o maboko, ozana (3x),

    Bayambi Mokonzi wa Israele, ozana (3x)

Tous : Ozana (3x), Ozana (3x)

     Beta, betani mindule yamba mosikoli

      Ayei na libiki Ye nde Nkumu wa lobiko Ozana

Finale : Mandalala boningisa e Yezu akoti na nkembo e