Toyemba App

Yezu abongi na lokumu

T.Père lulendo

Refrain. Ebongi Mokonzi Yezu Kristu azwa lokumu nkembo

O mboka Tata Nzambe!

1. Oy’azalaki ndenge yoko na Nzambe,

    Aweli te kotikala na lokumu na Ye.

2. Kasi atiki nkembo ya Ye enene

    Andimi kokoma lokola moombo.

3. Awa akomi moto lokola bato banso,

    Andimi kokufa liwa ya kuruse.

4. Yango wana Nzambe atomboli Ye,

    Amopesi nkombo eleki nkombo inso.

5. O nta likolo, o nse o mboka bawa,

     banso bafukama o nkombo ya Yezu.

6. Mpe bato banso basakola Yezu Kristu,

    Azali Mokonzi mpo ya nkembo ya Nzambe.