Ye nde profeta
1. Bokende, bokende o mboka ya ngambo
Kuna bokokuta mpunda, bokanga ye
Mpe bomema ye awa na mwana wa ye
(Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
Refrain. Ozana e ozana, ozana
Ozana e ozana toyemba ozana (2x)
2. Yebisa na mwasi wa Sion : « Tala Mokonzi wa yo
Ayei na yo likolo lya mpunda,
Na boboto mpe na nkembo e lokumu la Ye »
(Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
3. Bato banso bayei e mpe balandi, balandi Ye,
Bagangi mpe bayembi banso ozana,
(Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
4. Nkembo na yo okoya e o nkombo ya Mokonzi ozana,
Elongo na mapinga ma likolo,
Ozana na Mwana wa Davidi,
(Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)
5. Yeruzalem bamituni, Yeruzalem bamituni banso :
Oyo nde nani ? Oyo Profeta,
(Yo nde Mokonzi toyemba ozana!)