Toyemba App

Ozali putulu

J.Matondo

Refrain. Ozali putulu, okozonga putulu,

Luka ya yo nzela ya libiki (2x)

1. Natiyi bomoi na liwa,

    Soki otosi ngai okozwa bomoi bwa seko, ndeko tika mabe,

1-4. Zongela Ngai Tata, nakolimbisa yo.

2. Olandi mokosi ? okoly’o motoki mwa yo,

    Ozali putulu okozonga putulu, Ndeko kima satana,

3. Mpo na maye osali, okoyoka malozi ya kobota,

    Mpe mobali akokonza yo,

    Ozali putulu okozonga putulu, Ndeko senga bolimbisi,

4. Ntina ya lolendo nini ?

    Nzoto ya yo se mabele,

    Nsuka ya yo se mabele,

    Ozali putulu okozonga putulu, Ndeko tosa mobeko,