Mesiya nzambe wa ngai
Refrain. Mesiya Nzambe wa ngai,
Mesiya Nzambe wa ngai,
O nse ya Kuruse nayei kobondela Yo,
O nse ya Kuruse yaya bikisa ngai.
1. Nandimaki Yo te e Nzambe : bikisa ngai,
Ngai nakimaki Yo o Nzambe : bikisa ngai,
1-2. Tandela ngai loboko la Yo mpo ngai nabika (2x) Mesiya.
2. Ngai mosumuki naza na mpasi: bikisa ngai,
Ngai moto mpamba nayei epai na Yo: bikisa ngai,
3. Mokonzi ngai nde nani mpo oyingela o’ndako ya ngai,
Loba se liloba lyoko Nzambe mpo ngai nabika, Mesiya
3-6. A! Nzambe wa ngai.
4. Na malozi ya mokili nakomitungisa te,
Nayebi Kristu Yo mei ozali solo libiki lya ngai, Mesiya
5. Nakembisa ntango inso Sacramentu Esantu,
Ya libiki na bomoi bwa biso bana Nzambe, Mesiya
6. Na Kuruse elongo na Kristu nandimi komona mpasi,
Tika namema ntango inso elembo ya lokumu, Mesiya
7. Nayei na mikumba nionso ya ngai: bikisa ngai,
Nayei na bokono esilaka te : bikisa ngai,
Tandela ngai loboko la Yo mpo ngai nabika (2x) Mesiya.