Talaka mwinda

T.Akundi

Refrain. Talaka e talaka mwinda mopeli e

Monzoto mongengi e, Mwana Nzambe abotami (2x)

Emanuele ayei lelo e tosepela e (2x)

1. Lokola bankoko balobaka; Bokomona elembo ya monzoto

    Ayei lelo e tosepela e

    Nkombo ya Ye Emanuele; Nzambe o kati ya biso ayei lelo e tosepela e

2. Ye nde Mokonzi wa bwanya, Atondi na bokasi bonso ayei lelo e tosepela e

    Ye nde Bolingi bwa Tata e, Mwana wa Ye wa boboto ayei lelo e tosepela e

3. Bino bakengeli mpata e,

    Yakani kotala libiki ayei lelo e tosepela e

    Yembani nzembo ya nsai,

    Nkembo na Nzambe o likolo Boboto na bato ba ns’eye ayei lelo e tosepela e